2 Timothy 2

Etumba !

1Bongo yo mwana na ngai, zua makasi na yo kati na ngolu oyo ezali kati na Yesu Kristo. 2Mpe makambo oyo oyokaki epai na ngai liboso ya batemwe ebele, pesa yango na bato oyo otielaka motema, baoyo bazali na makoki ya koteya yango na bato mosusu. 3Mona pasi elongo na ngai, lokola soda ya malamu ya Yesu Kristo. 4Soda moko te oyo azali kokende na etumba bongo amipesaka mobulu na makambo ya bomoi oyo ; asalaka bongo mpo ete asepelisa mokonzi na yeya mapinga.

5Ndenge moko mpe, soki moto azali kokima mbangu lokola mosali ya masano, akoki kozua ekoti ya lokumu te, soki akimi mbangu te ndengemibeko ezali kosenga. 6Mpo ete moloni elanga asepela na mbuma, esengeli asala liboso mosala makasi. 7Kanisa malamu mpo na makambo oyo nazali koloba, pamba te Nkoloakopesa yo makoki mpo ososola makambo nyonso.

Ndakisa ya Polo

8Kanisaka Yesu Kristo, ye oyo asekwaki kati na bakufi, ye oyo azalaki moto ya libota ya David. Tala Sango Malamu oyo nateyaka ! 9Nazali komona pasi mpo na Nsango Malamu yango, kino bakangi ngaina minyololo lokola mobomi. Kasi Liloba na Nzambe ezali ya kokangama na minyololo te. 10Yango wana, nazali kokanga motema na bapasi wana nyonso, mpona bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazua lobiko oyoezali kati na Kristo Yesu, elongo na kembo ya seko.

11Pamba te maloba oyo ezali solo : Soki tokufi elongo na ye,
tokozala mpe na bomoi elongo na ye ;

12 soki tokangi mitema,
tokozala mpe na bokonzi elongo na ye.
Kasi soki towangani ye,
ye mpe akowangana biso ;

13 soki tozangi bosembo,
ye akotikala kaka sembo,
pamba te,
akoki komiwangana te.

Salela bosolo

14Kaniselaka bango makambo oyo. Kebisa bango liboso ya Nzambe ete batika kotiaka tembe mpo na oyo etali maloba ; yango ezali na litombamoko te, kasi ebendaka kaka libebi ya baoyo bayokaka yango.

15Sala nyonso oyo okoki kosala, mpo omilakisa liboso ya Nzambe lokolamoto oyo basiʼbameka ye, lokola mosali oyo akoyoka soni te mpo na mosalana ye, mpe oyo azali koteya Liloba ya solo na bosembo nyonso.

16Boya masolo ya pamba-pamba mpe oyo etiolaka makambo ya Nzambe, pamba te bato oyo bamipesaka na yango, masolo yango ememaka bango kaka na nzela ya kozanga botosi na makambo ya Nzambe. 17Mateya na bango eliaka nzoto lokola pota oyo ezali na tofina. Na kati na bango tozali na Imene mpe Filete : 18bango basiʼbatika nzela ya makambo ya solo, bazali koloba etelisekwa esiʼesalama, mpe bazali kokweyisa kondima ya bandimi mosusu. 19Nzokande, fondasio ya makasi oyo Nzambe atia, ezali kaka kotelema ngwi ; mpe maloba oyo ekomama likolo na yango : Nkolo ayebi bato oyo bazali bato na ye, mpe moto nyonso oyo azali kondima kombo ya Nkolo esengeli aboya mabe.

20Na kati ya ndaku monene, tozalaka kaka na banzungu ya wolo mpe ya palata te, kasi tozalaka mpe na banzungu oyo basala na banzete mpe na mabele. Oyo ya liboso babombaka yango mpo na bafeti, mpe oyo mosusu basalelaka yango mokolo na mokolo.

21Soki moto amibateli peto na makambo oyo nawuti koloba, akozala nzungu oyo bakobanda kosalela na bafeti, oyo ekomi ya bosantu, oyo Mokonzi akobanda kosalela, mpe oyo ekozala ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.

22Kima baposa ya mabe ya bolenge. Mpe luka na posa monene, bosembo, kondima, bolingo mpe kimia, elongo na baoyo babengaka Nkolo na motema ya peto.

23Boya mituna ya bozoba mpe oyo ezangi tina, pamba te oyebiete yango esukaka na koswana. 24Mpe ezali malamu te ete mosali ya Nkolo azala moto oyo aswanaka na bato. Kasi esengeli azala moto ya boboto epai ya bato nyonso, moto oyo azali na makoki mpo na koteya, mpe kokanga motema. 25Esengeli ateyaka na boboto nyonso bato oyo batiaka tembe epai na ye ; mpe azala na elikya ete tango mosusu Nzambe akopesa bangotango mpo babongwana, mpo bayeba makambo ya solo. 26Bongo bakozongela makanisi na bango ya malamu mpe bakomilongola na motambo ya zabolo, oyo akanga bango na boloko, mpo basalaka mokano na ye.
Copyright information for LinMNB